Ekokota Basantu
Moleki, nakotambola,
Na mokili ya mabe;
Wana nakokende lola,
Ekokota basantu.
Ekokota basantu,
Ekokota basantu,
Nkolo ngai mpe nazala,
Ekokota basantu.
Solo nakomona Nkolo,
Soki nasikolami,
Nakokota mboka lola,
Ekokota basantu.
Ntango tokozinga Nkolo,
Bikuke bikangemi,
Nakonganga: "Nkembo, kembo."
Ekokota basantu.
Awa nazela likalo,
Ekoya komema ngai;
Na mapata nakei lola,
Ekokota basantu.
Home
Next song