NA ZALI MOPAYA
Na zali mopaya
Na mokili oyo,
Mboka na ngai ya seko
Ezali na Lola,
Mokolo mosusu
Na kozonga na ngai,
Na kokende na ngai seko.
Na mipesi na Yo
Nkolo na ngai Yesu,
Lisalisi na ngai
Ewuti epai na Yo,
Miso na ngai nyonso
Ekotala se Yo.
Yesu Mobikisi na ngai.
Ntango na kotala
Nyonso na mokili,
Na masumu nyonso
Bato bakosala,
Na sosoli solo
Mobembo ebelemi,
Mpo na kende na ngai Lola.
Na komipesa te,
Na mokili oyo,
Na kolanda ata te
Moto na mokili,
Na mipesi na Yo,
Mosikoli na ngai,
Kino‘koya
Ko mema ngai.
Na landaki mingi,
Bato na mokili
Na tamboli solo,
Na bisika nyonso.
Na zuaki ata te
Oyo akobikisa ngai,
Bobele Yo Nkolo Yesu.
Home
Next song