Konuna Te
Mboka moko ezali kuna mosika be,
Yango ndako mpo na molimo;
Yesu'atongi yango, mpe kuna liwa te,
Kuna mboka tokonuna te.
Konuna te, konuna te,
Kuna mboka tokonuna te,
Konuna te, konuna te,
Kuna mboka tokonuna te.
Na mboka kitoko tokotelema ngwi,
Tokozala kati na kimia;
Mpe tokosanjola Mokonzi libela,
Kuna mboka tokokufa te.
Mosala esili tokozwa mitole,
Soki mimekano esili;
Mpasi esili be, kuna tokoyemba,
Na bandeko bakei liboso.
Home