Pole

Wana ngai na molili Yesu'abelemi
na ngai,
Na pole ya bolingo na Ye'abengani
butu.

Pole ezali kati na ngai lelo,
Pole, pole, kati na nzela;
Masumu Mobikisi alongoli,
Mpe nazwi pole ya bolingo na Ye.

Mapata masangana, mpe mbonge
ezinga ngai,
Mokili eyinda, pole'ezali kati na ngai.

Kotambola na Pole na Nkolo,
mpe bondeko;
Nakoba na mpiko natika mokili
nsima.

Nazali kokatisa elanga mpe lisobe,
Na bolingo na Ye nabuka
mbuma'ekomeli.

Ye pole ayaki'epai na ngai
nakomona Ye,
Kotalaka elongi na Ye
mpo na libela.

Home