Yesu Amema Ekulusu Ye Moko?
Yesu amema ekulusu
Bobele Ye moko?
Te, ekulusu mpe ezali
Mpo na yo, mpo na ngai.
Ekulusu ngai nakomema,
Kino liwa na ngai;
Mpe motole ngai nakolata,
Kuna na likolo.
Kuna na makolo na Yesu,
Na mboka ya nkembo;
Ngai nakokitisa motole,
Se na nkombo na Ye.
Ô Ekulusu ! Ô Motole !
Ntango ya lisekwa !
Bino baanje bokita na nse,
Mpe bonetola ngai.
Home