Sepela

Sepela !
Sepela ! ngolu na Ye,
Epesameli yo !
Bolingo na Ye,
Bolingo na Ye
Eza na suka te!
Sepela moninga!

Libota na yo,
Ebwaki yo ndeko na nga!
Kasi Yesu Kristo
Ayambaki yo!
Mpo ete ozalaki
Moto na mabe mingi!
Makila ma Mpate,
Ma petoli yo !
Ozalaki kati na molili
Ya Laodika!
Mpole na pokwa
Engengiseli yo
Nzela ndeko!

Bokono ebuki yo
Solo tango mingi!
Kasi Nkolo Yesu
Atikaki yo te!
Minganga balobi,
Ndeko oko bika te!
Kasi Monganga monene
Abikisi yo!
Obelelaki Yawvé!
Mpo ete mpasi mingi!
Yesu Libanga na bileko
Asungaki yo! Ndeke!

Sepela!
(Sepela ndeko
Po na lisiko nay o!)
Sepela!
(Sepela moninga,
Po na lobiko na yo!)
Sepela!
(Sepela moninga,
Po na lisungi na yo!)
Sepela!
(Sepela moninga,
Po na Liloba na ntango!)
Sepela!
(Sepela moninga,
Po na Molimo Santu!)
Sepela!
(Sepela moninga,
Po na lobiko na yo!)
Sepela!
(Sepela! Sepela! Sepela!)
Sepela!
(Oh! Oh! Oh ! oh !)
Sepela!
(Oh! Oh! Oh ! oh !
Sepela !)
Sepela!
(Sepela! Sepela! Sepela!)
Sepela!

Home