MOLIMO NA NGA
Molimo na nga ebongama
Kasi nzoto Eko koka te
Po na bolembu !
Sunga nga Yaweh!
Ko salela Yo
Na kosenga lisungi na Yo!
Po ete Satana monguna na nga
Atiki ngai te.
Soki Petelo moninga na Yo
Ya motema,
Ye afandaki elongo na Yo
Pe ayebaki Bozambe na Yo,
Bikamwa na Yo
Na bomoi na ye!
Na tango moke
Ye awangani Yo, oyo somo!
Yango na kosenga
Sunga nga Yaweh!
Na ndimela Yo!
Na tosa se Yo!
Na bomoi na nga.
Sunga nga Yaweh!
Na yokela Yo!
Na loba amen,
Na Liloba na Yo eh!
Nga na lingaka tango nionso
Ko mipesa epayi na Yo,
Lokola Yo o’mipesaki
Na ekulusu po ete
Ngai oyo na zua bonsomi!
Bomoi na Yo oyo ya peto
Yo opesaki nga!
O’kamataki oyo
Ya ngai ya masumu!
Nkolo posa na nga ezali ete
Na futa niongo epayi na Yo!
Na lolenge na kosalelaka Yo!
Na makasi na ngai te,
Na nguya pe te,
Se ngolu na Yo!
Yango na kosenga
Sunga nga Yaweh!
Na yokela Yo!
Na tosa se Yo!
Na bomoi na ngai!
Sunga nga Yaweh!
Na ndimela Yo!
Na loba amen
Na Liloba na Yo eh!
Nkolo na ngai
Liloba na Yo etalisi ngai
Ete Yo oye ko kamata
Lingomba na Yo!
Bosenga na ngai
Epa na Yo ezali ete
O’tondisa ngai
Na Molimo Mosantu!
Bomoto na ngai pe
Mokili ekweyisama!
Po na zua nguya
Ya ko netwa elongo na Yo eh!
Yango na kosenga, Nkolo!
Sunga nga Yaweh!
Na tosa se Yo!
Na landa se Yo!
Na bomoi na ngai ô!
Sunga nga Yaweh!
Na ndimela Yo!
Na loba amen,
Na Liloba na Yo!
Liloba na Yo ya tango’yo
Otindeli ngai eleki mayele
Pe bomoto na ngai!
Na ngai moko na kokoka te
Ko bika yango !
Eyano na ngai epa na Yo
Lokola Petelo!
Epayi na nani mosumu
Ngai na kokende ?
Maloba ya Bomoi
Yango nde ezali na Yo Nkolo!
Yango ngai na ye
Komibuaka se epayi na Yo!
Nkolo yamba nga aaaaaa!
Nzambe na nga aaaa!
Nkolo na nga aaaaa!
(Eh ! eh ! eh ! eh Nkolo!
Alléluia !)
Bolembu ya motema na nga
Yo oyebi yango!
Na zali na Nzambe mosusu te
Kaka Yo!
O’salelaka baye balemba
Nkolo Yesu eh!
Po osilisa mayele
Ya bato ya makasi eh!
Eeee Nkolo na nga
Na sengi na Yo!
Na mongongo oyo
O’ya bolembu oyo
Y’opesi ngai!
Obimisa makasi na Yo
Oyo ekoki kolongola
Libota na ngai kati na mabe!
Kolongola ba ndeko na nga
Kati na kufa!
Nkolo salela nga aaaaaa!
Nzambe na nga aaaaaa!
Nkolo na nga aaaaaa!
Eko tambola ngai na nzela
Nkolo Yesu!
Posa na nga Yo omonana
Kati na ngai!
Soki yango te litomba na ngai
Ejali nini eh ?
Nkolo yoka nga aaaaaa!
Nzambe na nga aaaaaa!
Nkolo na nga aaaaaa aaaaaa!
Yaweh na nga aaaaaa!
Eh! Eh! Eh! Nkolo!
Yo nde Nkolo na ngai!
Yo nde Nzambe na nga,
Nkolo ô ô ô!
Yoka kolela na ngai!
Eh! Eh! Eh! Nkolo ô ô ô!
Home