Nkolo Azali Kobianga

Nkolo Azali kobianga;
Telema, mosumuki!
Yanola lolaka na Ye;
Ye Mobikisi na Yo.

Belema, belema
Epai na Yesu lelo!
Belema, belema
Epai na Yesu lelo!

Mpo na nini'ozelisa Ye?
Uta ntango molayi
Oboyi koyokela Ye;
Zela te: Abelemi.

Amemeli yo nde ngolu,
Bolimbisi, bosantu,
Kimia na Ye ya libela,
Lola mpe esengo be.

Asemboli mpe loboko,
Afungoli motema;
Selingwa, mpate mobungi,
Belema, kozela te.

Nkolo Azali kobianga;
Na mwa ntango, Aleki!
Yanola lolaka na Ye,
Yambo Alongwa na yo.

Home