Mapapu Ya Bondimi

Nzela ezali mibale,
Kondima mpe komona ;
Tala Liloba to mposa na yo,
Okozwa oyo ondimi.

Sembola se mapapu,
Nde okomata likolo;
Makasi te, se na ngolu,
Sembola se mapapu.

Ata nini y'olingi,
Ngomba eleka molayi ;
Loba na yango, na mwa
ntango
Ngomba ekolongolama.

Tala mpongo na lola,
Akosalaka makasi te ;
Nguya na ye mpo na
kopumbwa,
Ezwamaka na lola.

Home





Next song