Nkolo Alingi Ngai
Nkolo' Alingi ngai,
Nde bozwi na ngai,
Nkolo' Alingi ngai,
Ye Bolingo!
Nakoloba seko :
Nkolo' Alingi ngai,
Nkolo' Alingi ngai,
Ye Bolingo!
Kati na mpasi
Makasi mingi,
Kati na mpasi
Nazindaki.
Mpe na bolozi,
Kozanga'elikya,
Mpe na bolozi :
Nalelaki.
Ngai na mikumba
Mpe minyololo,
Ngai na mikumba
Nabungaki.
Nzambe na ngolu,
N'esika na ngai,
Nzambe' apesaki
Mwana na Ye.
Lokola mbeka
Mpo na bosembo,
Lokola mbeka.
Amikabi.
Mokumba na ngai,
Ya mabe na ngai,
Mokumba na ngai,
Amemaki.
Ye Atikaki
Tata mosika,
Mpo na kokufa
N' ekulusu.
Akopetola mpe
Bomoi na ngai,
Akopetola
Na makila.
Nkembo se na Yo,
Elonga na Yo,
Nkembo se na Yo
Mwana Mpate.
Home