Bampate Na Ngai

Bampate na ngai
Bakoyakaka ngai,
Wapi nakei bakolanda;
Mongongo na ngai
Bayebi mpe yango,
Kasi oyo ya mopaya te.

Bayebi mongongo,
Mikolo minso
Bazali n'étonga
Bakobunga te;
Balingi ngai mpo'ete
Naponaki bango,
Mpe bakoyanola ngai
Mpo bayebi mongongo.

Bampate na ngai
Bayebi elanga
Wapi naleisaka bango,
Liziba ya mai
Ya mpeto bayebi
Kuna nakomemaka bango.

Bango bayebi
Lobwaku ya liwa
Wapi nakomema bango;
Liwa, likama,
Ekozwa moko te
Nakozala na bango seko.

Home