Mokili Ya Ngai Te
Mokili ya ngai te,
Nazali moleki;
Kuna na likolo,
Nazali na bozwi.
Baanje babiangi ngai,
Uta na likolo;
Ngai nasepeli te,
Na mokili ya nse.
Nkolo'oyebi,
Yo Moninga na ngai;
Ngai nazanga lola,
Nakosuka wapi?
Baanje babiangi ngai,
Uta na likolo;
Ngai nasepeli te,
Na mokili ya nse.
Banso bazeli ngai,
Nayebi mpe yango ;
Mpe ya ngai na Yesu,
Nabongisi nyonso.
Wana ngai nalembi,
Akopesa mpiko;
Ngai nasepeli te,
Na mokili ya nse.
Na mboka ya nkembo,
Tokobika seko,
Basantu bazali
Konganga: "elonga."
Nzembo kitoko be,
Kouta na lola;
Ngai nasepeli te,
Na mokili ya nse.
Home