Moninga Tozwi

Moninga tozwi na Yesu,
Azwi mpasi na biso;
Mpe litomba nini oyo,
Komemela Ye nyonso;
Tokobungisaka kimia,
Tomemi mpasi mpamba;
Mpo tomemeli Nzambe te,
Nyonso na mabondeli.

Tomekami ndenge mingi,
mpe tozwi mitungisi;
Tolemba soko moke te,
Tomemela Ye nyonso;
Tokozwa moninga wapi,
Ya kokabola mpasi;
Ayebi mabe na biso,
Tomemela Ye nyonso.

Tolembi, mpe na mikumba,
Uta na mitungisi,
Yesu Ye nde Ebombelo,
Tomemela Ye nyonso;
Ata baninga batiki yo,
Mema nyonso na Nkolo;
Ye nde akobatela yo,
Mpe akobondisa yo.

Home