NGOLU
Eko kota biso Lola
Ba ko senga ete to yemba
Elok'oyo ba bengi ngolu eh!
To ko yemba biso
Na banjelu,
Ba nani ba yebi solo,
Elok'oyo
Ba bengi ngolu eh !
Oyo nde ngolu eh!
Bo tika ngai
Ngai nde na yemba ngolu,
(Ngay'oyo na yebi ngolu eh,)
Ngai nde koleka,
Ngai na yebi ngolu
(Oh! Oh! Oh!)
Ngolu eh! Ngolu
Ya Yesu Masiya!
(Na loba nini eh!
Ngai na loba boni oh)
Bo tika ngai
Ngai nde na yemba ngolu,
(Ngay'oyo
Ngai na yebi ngolu eh!)
Ngai nde koleka,
Ngai na yebi ngolu,
(Ouh! Ouh! Ouh!)
Ngolu eh! Ngolu
Ya Yesu Masiya!
Mingi kati na biso,
To yebi bango bo bele,
Sima ya kozwa
Molimo Mosantu eh!
Ko zonga moke na sima
Ko tala bomoyi na bango
Tika bango ba yemba ngolu eh!
Oyo nde ngolu oh!
Eko kota biso Lola,
Banjelu ba ko kamwa eh!
Ndenge oyo biso
To ko yemba ngolu eh!
Mwasi na libala alati eh !
Na lipambu pe
Ko tambola oh !
Po'été bomoyi na ye
Ezali se ngolu !
Oyo nde ngolu eh!
Mingi kati na biso,
Yaweh alokoti bango
Atako pene pene ya fulu te oh!
A lokoti bango penza,
Kati kati na poto poto eh!
Tika bango ba bina ngolu eh!
Oyo nde ngolu oh!
Bo tika ngai
Ngai nde na yemba ngolu,
(Ngay'oyo
Ngai na yebi ngolu oh!)
Ngai nde koleka,
Ngai na yebi
(Oh! Oh! Oh !)
Ngolu eh! Ngolu
Ya Yesu Masiya!
(Na loba nini eh!
Na loba boni oh)
Bo tika ngai
Ngai nde na yemba ngolu,
(Yesu, Ye molongi eh !)
Ngai nde koleka,
Ngai na yebi ngolu,
(Ngolu na Yo Yesu eh !)
Ngolu.. ! (Oh ! Oh !)
Ngolu……
Ya Yesu Masiya!
Home