Na Klisto Nde
Na Klisto nde nakolikya,
Ye pole mpe nguya na ngai;
Libanga makasi mpenza,
Na mbonge mpe na mipepe ;
Kimya monene ngai nazwi,
Nakobanga lisusu te;
Nakotalela se Klisto,
Ye nde Mobondisi na ngai.
Klisto ayaki na nzoto,
Ye litondi ya bonzambe;
Ye libonza ya bolingo,
Atiolamaki na bato;
N'ekulusu Akufaki,
Nkanda na Nzambe'esilaki;
Azwaki masumu na ngai,
Na kufa na Ye nabiki.
Mpe na nse Akundamaki,
Klisto, pole ya mokili;
Na nkembo Abelemaki,
Mpe Abimaki na nkunda;
Wana Klisto Alongaki,
Nasikwami na masumu;
Ngai nakomi mwana na Ye,
Uta na makila na Ye.
Ngai nakobanga kufa te,
Nguya na Ye kati na ngai;
Na bomoi na nga awa nse,
Klisto nde Akokamba ngai;
Lifelo ekokoka te kobotola ngai
na Klisto;
Ye azonga to nakufa,
Nguya na Ye esimbi ngai.
Home