Namoni Ebale Ya Makila

Na ngomba n'ekulusu,
Nyongo efutami,
Elikya mpo na lobi
Engengi na nzela.

Namoni' ebale'a makila,
N'ekulusu'etioli,
Mbonge uta kiti'a Nzambe
Ekiteli biso.

Kokweisama esili
Mpo kopengwisa ngai
Mosika na lobiko,
Ayei kati na ngai.

Wana mpasi, elobi:
"Tika kobondela;"
Nde ngai natali Yesu,
Asengi naloba:

Tokokoma na lola
Kuna bomoi seko,
Nzembo ya basikwami
Bakoyemba boye:

Home