Ntango Nkolo Akoya

Ntango Klisto na mapata
Akozonga awa nse;
Mokili ekosepela,
Ntango Nkolo akoya?

Koyemba mpe kosepela,
Mpasi, mawa ekoya;
Kolela mpe kobondela,
Ntango Nkolo Akoya.

Koya na Ye ekomema,
Esengo to mpisoli;
Obelemi koyamba Ye,
Ntango Nkolo akoya?

Okozala na baleli,
To na nzembo na baanje;
Kolatisa Ye motole,
Ntango Nkolo Akoya?

Sala kati na elanga,
Kino ekobianga Ye;
N'esengo okomona Ye!
Ntango Nkolo Akoya.

Home