Fololo Ya Lobwaku
Na Yesu nazwi moninga,
Ye manso mpo na ngai,
Ye kitoko koleka nkoto zomi;
Ye Fololo ya lobwaku,
Na Ye nde ngai nazwi,
Bosenga ya bopetolami na ngai ;
Ye lisungi na mpasi,
Bopemi ya sôlo,
Asengi ngai natikela Ye manso (Aleluya)
Ye Fololo ya lobwaku,
Monzoto ya ntongo,
Ye kitoko koleka nkoto zomi.
Akamati mpasi na ngai,
Mpe ameni yango ;
Na masenginya Ye ebombamelo;
Mpo na Ye natiki manso,
Nabuki bikeko
Na motema, mpe Ye abateli ngai;
Mokili eboya ngai,
Satana ameka ngai,
Ná Yesu Klisto nakokoma suka (Aleluya)
Ye Fololo ya lobwaku,
Monzoto ya ntongo,
Ye kitoko koleka nkoto zomi.
Akotika ngai awa te,
Akokima ngai te,
Nandimi nasali mokano na Ye ;
Azingeli ngai na móto,
Mpe nakobanga te,
Na mana na Ye akoleisa ngai ;
Wana tokeyi na nkembo
Mpo na komona Ye,
Kuna ebale y’esengo etioli (Aleluya)
Ye Fololo ya lobwaku,
Monzoto ya ntongo,
Ye kitoko koleka nkoto zomi.
Home