Ngolu Ya Kokamwa Mingi
Ngolu ya kokamwa mingi,
Nzambe'Alimbisa manso?
Ngai mosumuki monene,
Mabe na ngai'Abosana?
Yesu, nayei! Nayei na Yo!
Ngai mobimba, nayei na Yo!
Yesu, nayei! Nayei na Yo!
Ngai mobimba, zwa ngai.
Ekendeki ngai mosika,
Asilikaki mingi ;
Ekangaki ngai motema,
Esalaki Ye mpasi.
Aleluya! Ntembe'esili,
Mokumba na ngai'elongwi,
Na nzela nakei na lola,
Esengo mpo na seko.
Home