Ndenge Nazali
Ezali ngai n'eloko te,
Bobele makila na Yo;
Okobianga ngai epai na Yo,
Mpate na Nzambe ngai nayei.
Ezali ngai kozela te,
Kosikwama mpo na nyonso;
Yo okoki kosukola,
Mpate na Nzambe ngai nayei.
Ezali ngai Okoyamba,
Kobatela, kolimbisa;
Nandimi elaka na Yo,
Mpate na Nzambe ngai nayei.
Ezali ngai bolingo na Yo,
Ebuki bikuke binso;
Mpo' ete nazala se wa Yo,
Mpate na Nzambe ngai nayei.
Home