Mboka Ya Pole

Mboka moko'ezali kuna na lola,
Mboka oyo butu nde ezali te;
Soki tondimi tokokende kuna,
Mboka oyo mpate azali pole.

Mboka oyo Mpate azali pole,
Mboka oyo butu ezali te;
Ndako na ngai ezali, soki
nasikolami,
Nde nakei kuna Mpate
Ye pole.

Awa tongengisami nde toyebi,
Ete moyi engengisi sikawa;
Ekobongwa mapata wana tokei,
Mboka oyo Mpate azali pole.

Kuna fololo mingi mpe mokolo,
Ekozala seko ata butu te;
Mpisoli'ekopangusama libela,
Mboka oyo Mpate azali pole.

Awa tosepeli ata moke te,
Elikya na biso etemelami;
Awa kolela, na lola esengo,
Mboka oyo Mpate azali pole.

Moyi ezimama to butu eya,
Nde motema na ngai ekobanga te;
Nayebi na lola ngai nazwi ndako,
Mboka oyo Mpate azali pole.

Home