Moteyi Moleki

Moteyi moleki
Atambolaki na mboka,
Mondoki na lipeka
Mpe Biblia na loboko;
Koteyaka bato ntina
Na mboka ya elaka,
Na mpunda, koyembaka.

Napemi, Napemi,
Na loboko ya seko na seko;
Napemi, Napemi,
Na loboko ya seko na seko.

Ateyaki koya ya bosambisi
na moto,
Mpe lola ya nkembo mpo na baye
basembolami;
Wana Akatisi ngomba
Toyoki Ye koyemba,
Se likolo na mpunda.

Nguya'ezali, nguya kokamwa,
Na makila ya Mpate;
Nguya' ezali, nguya kokamwa,
Na makila ya Mpate.

Mondoki na Ye ya kala
Etiami n'etutu,
Biblia na ye etikami
Mpe ezwi putulu;
Tokokutana na mateya na Ye
kuna suka,
Liloba ekokoba.

Nkembo! nkembo! Aleluya
Nkembo! nkembo! Aleluya
Nkembo! nkembo! Aleluya
Liloba ekokoba.

Home