Esengo Kotambola Na Ye

Esengo Kotambola na Ye (2x)
Azali kokamba ngai,
Na mobembo awa na nse.
Esengo kotambola na Ye.

Aleluya! Nkembo na Yesu! (2x)
Ye asikolaki ngai
Mpo na Makila na Ye.
Aleluya! Nkembo na Yesu.

Aleluya! Abikisi ngai! (2x)
Ngai nabiki mobimba
Nalongwi na masumu.
Aleluya abikisi ngai.

Abatisi ngai na Molimo! (2x)
Natondi na esengo;
Na moto na Molimo.
Abatisi ngai na Molimo.

Na Ye, nakokenda liboso! (2x)
Ye mobateli na ngai,
Nakobanga eloko te.
Na Ye, nakokende liboso.

Aleluya! Nkembo na Yesu!
Yesu azali koya,
Nakokota na Nkembo.
Aleluya! Nkembo na Yesu.

Home





Next song