Babundi Botelema
Babundi botelema,
Basoda ya Nkolo!
Bosimbaka makasi,
Ekulusu na Ye;
Mpe na nzela ya nkembo
Yesu akokamba,
Akopesa elonga
Na moto'alandi Ye.
Kelelo eyokani,
Botelema banso!
Motole ya bomoyi,
Libonza y'etumba.
Moyini atomboka,
Bosimba makasi;
Bozala na molende,
Soki alembi te.
Bokende na etumba,
Bozonga nsima te!
Mpo moko alemba te,
Botalaka Yesu!
Bibundeli na nguya,
Babundi bolata;
Elonga ekozala,
Mpo na mofukami.
Botelema lisusu,
Kino koya na moi!
Ntongo esi etani,
Liboso na biso;
Minduki tokobwaka,
Na makolo na Yesu!
Nzembo nsima na mawa,
Mpasi nsima nkembo.
Home