Kamata Nkombo Na Yesu
Kamata Nkombo na Yesu,
Yo na mawa mpe mpasi;
Ekopesa yo esengo,
Bipai binso okokende
Nkombo oyo, kitoko,
Elikya ya nse, esengo ya lola;
Nkombo oyo kitoko,
Elikya ya nse, esengo ya lola.
Kamata Nkombo na Yesu,
Lokola nguba na yo;
Na mimekano tangaka,
Yango na mabondeli.
Nkombo kitoko na Yesu,
Epesi biso'esengo;
Ekoyambaka Ye biso,
Tokoyembelaka Ye.
Tokongumbamela Yesu,
Kopesa Ye motole,
Ya Mokonzi na bakonzi,
Ekosila mobembo.
Home