Nasanzola
Emonaki ngai liziba,
Efungwami mpo na ngai,
Mpe natosaki Molimo,
Alobi napetwama.
Nasanzola, Mwana mpate,
Akufelaki bato;
Banso bakumisaka Ye,
Mpo Makila ekopetola.
Ata nzela eyei moke,
Eloko ngai nasengi,
Mposa mpe mikano na ngai
Ezala na ntina te.
Moto na Nzambe epeli,
Ee! na motema na ngai,
Nakotika te koyemba,
Nkembo na Nkombo na Ye.
Nkombo na Ye' ekumisama,
Natondi na esengo;
Ye Alimbisi masumu,
Apetola motema.
Home