Liziba Ya Makila Ezali

Liziba'a makila ezali
Uta misisa y'Emmanuel;
Basumuki bakozinda,
Bakopetolama,
Bakopetolama,
Bakopetolama;
Basumuki bakozinda,
Bakopetolama.

Moyibi asepelaki
Komona liziba yango;
Ngai mpe nakozinda kuna,
Nakosukolama,
Nakosukolama,
Nakosukolama;
Ngai mpe nakozinda kuna,
Nakosukolama.

Yo Mpate Makila na Yo
Ekobungisa nguya te;
Kino lingomba na Nzambe
Etika masumu,
Etika masumu,
Etika masumu;
Kino lingomba na Nzambe
Etika masumu.

Na bondimi ngai namoni
Liziba'a makila na Yo;
Bolingo na Yo nde nzembo
Ya ngai kino liwa,
Ya ngai kino liwa,
Ya ngai kino liwa;
Bolingo na Yo nde Nzembo
Ya ngai kino liwa.

Bongo na nzembo kitoko
Nakoyemba nguya na Yo;
Ntango nakokitisama
Na kimia na nkunda,
Na kimia na nkunda,
Na kimia na nkunda,
Ntango nakokitisama
Na kimia na nkunda,

Home