NKEMBO

Nkembo! Nkembo !
Epayi na YoYaweh !
Ozali Nzambe
Y’otonda Bolingo!
Motema na nga Yaweh
Eyebi Yo kaka Yo Masiya
Mosusu ajalite.
Kumama na Yo
Nkolo na ngai
Mpo Yo ozali Nzambe
Ya bomoyi na nga!

Ngai na ko sanjola Yo
(Oh Nkolo!)
Mpo na Bolingo na Yo
Epa na nga.
Ngolu na Yo Nzambe
Eleki monene
Na bomoyi na nga.

Mokolo wana na ekulusu
Ozalaki bolumbu
Liboso na ngai!
Ngai oyo ekelamu na Yo
Yaweh Y’okangi motema
Yesu Yo Bolingo.
Moyi kutu ekokaki te
Kotala bolumbu na Yo
Masiya!
Nyoso po na kobika na ngai
Yaweh Y’ondimaki pasi
Mpe soni nyoso !
Aaaaaaaahh Yaya eh
Tika nga na yemba
Po na Yo Nkoloo eeehh!

Buku oyo ya Bomoyi
Nani akokaki
Kofungola yango!
Kuna na lola
Mpe na mokili
Mpe na se ya mabele
Amonanaki te!
Ezalaki pasi mpe mawa
Mpo na,
Mpo na lisiko ya bato
Ya mokili yéee!
Kasi mongongo moko
Elobaki
Tala Mwana na Mpate
Ye Nkosi na Yuda
Ye nde akoki
Mpo na kofungola
Kofungola Buku
Oyo ya Bomoyi!

Lelo na mpokwa
Nkolo na ngayi
Y’oye kotala ngayi
Momboto y’Abalayama
Nzambe monene
Kati na moto
Oyo bikamua
Elembo ya suka!
Ofungoli misu na nga
Ya masumu
Mpo na mona Yo!
Esengo na ngai
Mokili endima pe
To eboya
Ngayi na moni Yo
Na keyi kopemaa eh.

Home