Yesu Ndeko Na Bolingo

Yesu ndeko na bolingo,
Yo olingi ngai mingi,
Yo okufelaki ngai,
Otalisi ngai nzela

Ngai nalingi Nkolo Yesu,
Aleluya na Yesu !
Ngai nalingi Nkolo Yesu,
Aleluya na Yesu !

Yesu Yo malamu mingi,
Opesaki ngai bomoi ;
Ekozala mpe na seko,
Bomoi ekosila te.

Ata bato bakoboya Yo,
Bakolinga Satana,
Yo olingi bato nyonso,
Okoboya moko te.

Soko mpasi, soko liwa,
Yo okolongwa na ngai te ;
Yo osopaki makila
Mpo ete ngai nazwa bomoi.

Home