Yesu Atiki Nkembo
Yesu atiki nkembo ya Tata,
Mpe akiti awa na mokili;
Abotami na ndako ya mpate,
Mwana na Nzambe Ye nde Mokonzi.
Ezali sôlo,
Ngai nayebi;
Ekomami, mpe nandimi !
Esengo, Yesu alingi ngai,
Elobi Bibliya.
Atambolaki mpe na lisiko,
Na boboto kosilisa mpasi;
Kolimbisaka mpe basumuki,
Apamboli kino bana mike.
Abakamaki na ekulusu,
Ye Mosantu akufelaki ngai;
Na makila na Ye ngai nabiki,
Ntina yango ngai nalingi Yesu.
Ye Molongi abimi na nkunda,
Nkembo na Mwana Mpate na
Nzambe !
Na likolo akolobela ngai,
Akoya koluka ngai nandimi.
Home