Nkolo Abiangi

Nkolo'abiangi nabila Ye,
Namema ekulusu!
Nayanoli : "Mobikisi,
Tala ngai nayei na Yo."

Nabila Yo kino suka,
Na mpasi to esengo;
Wa Yo na liwa to bomoi,
Wa Yo, Yesu, libela.

Kasi nzela n'ekulusu
Moke mpe ya likama,
Nzela ya moto ye moko,
Ya mpasi mpe molili.

Okotika' ata baninga,
Mpe basosoli yo te,
Mokili'ekofinga mpe yo,
Mokili'ekotiola yo.

Kondima mpe ata liwa,
Komimona se mpamba,
Kasi bosenga se moko :
Linga Yesu, nde bozwi!

Yesu Akopesa ngolu
Mpo ete obila Ye,
NĂ¡ Ye esengo, elonga,
Kimia, bomengo seko.

Home