Esika Ya Likolo
Nazali na nzela'a lola,
Komataka se likolo;
Kosengaka se na Nkolo :
"Netola ngai na likolo."
Netola ngai natelema
Na bondimi kuna likolo;
Mosika mingi koleka,
Nkolo mema ngai likolo
Motema eboi kozala,
Epai ya ntembe mpe nsomo;
Basusu bazala kuna,
Ngai nalingi se likolo.
Nakoma kino na suka,
Mpo ete namona nkembo;
Yambo ngai namona lola,
Nkolo mema ngai mosika.
Home