Nkolo Nazongi
Nazali kozela mbula nkoto
Oyo ya nkembo,
Wana Nkolo akoya kokamata
Mwasi na Ye;
Natondi na esengo ezali ngai
kosenzela,
Mpo Nkolo na biso akoya na nse.
Ee Nkolo na biso akoya na nse,
Ee Nkolo na biso akoya na nse;
Mbula nkoto Satana akokangema
Mpe Masumu,
Ntango Yesu akozonga awa nse.
Koya na Yesu ekobondisa
mokili oyo,
Awa nse mpe likolo tokoyeba
Nkolo Nzambe;
Akobikisa bokono, kopangusa
mpisoli,
Ekozonga Mobikisi
Na biso.
Basikolami na Nkolo
Bakoya na Siona,
Na ngomba na Ye ya bule
Mpasi ekozala te;
Kimia mpe bolingo
Ekotonda na mitema be,
Ntango Yesu akozonga awa nse
Liwa, mpasi, masumu
Na mokili ekosila,
Mbula nkoto elongo na Yesu,
Nkembo mpe kimia;
Mokili eluki komona mokolo'a
lisiko,
Mpo ete Yesu azonga awa nse.
Home