Bauti Mboka

Bauti bisika binso
Bauti mboka mosika
Mpo na kolia
N'elambo ya Nkolo
Bapaya bapambwami
Kotala'elongi na Ye
Kongenga ya ngolu
Mangaliti'a motole.

Natondi na esengo
Yesu asikoli ngai
Natiki mikumba'a mitungisi
Ya Yesu bozito te.
Molili ezipaki ngai
Kasi nyonso elimwe
Nakoyemba elonga
Yesu asikoli ngai

Liboso'a kiti'a Nzambe
Basantu batelemi
Mpisoli'esili
Mawa esili
Kuna liwa'ezali te
Mobikisi akei kuna
Kobongisa'esika
Tokozala elongo
Mpo na seko na seko.

Bikuke, mboka yango,
Bizali se polele
Talela Nkolo
Mopesi ngolu
Na bolingo'abongisi
Efandelo na mboka
Mpo na biso banso.
Mpo na komilengela
Tosa mongongo na Ye.

Yesu azali koya,
Nde mpasi ekosila.
Soki Mokonzi ayei sikawa
Mpo na basembolami,
Okozala n'esengo
To mawa mpe mpasi?
Ekoya Ye na nkembo
Tokokutana na Ye.

Home