Nalingi Komona Ye

Na mboka nakotambola mpe
koyemba,
Kokamba bato kuna na ekulusu;
Mbanzi mingi ezokisi motema na
ngai,
Nkolo akokamba, na Ye nalongi.

Nalingi komona elongi na Ye,
Mpo na seko nayemba ngolu na Ye;
Na nzela ya nkembo tika nanganga,
Mitungisi'esili, nasepeli be.

Na mosala na Nkolo soki molili,
Nakobelema na Ye angengela ngai;
Mitambo ya Satana mitungisi ngai,
Nkolo'akei liboso, kokamba manso.

Kati na lobwako natomboli miso,
Mpe namoni Nkolo kokamba
etumba;
Asemboli loboko epai na ngai,
Akokamba ngai mpe nakei liboso.

Soki mbonge emati uta ewelo,
Nde Nkolo akotambwisa bwato
na ngai;
Akokamba ngai kati na mokili'oyo,
Azali moninga, รด nalingi Ye.

Home