Mosumuki Nakobikisa Yo

Mosumuki nakobikisa yo;
Namoni mpasi na yo,
Kasi mpo na kozwa lisiko,
Yekola kotosaka Ngai.
Tala natelemi n'ekuke,
Mobikisi, Nkolo na yo;
Ngai namemeli yo nde bozwi:
Fungolela Ngai motema.

Nabotamaki mpo na yo,
Bomoi napesaki mpo na yo;
Nde motema na yo ezangi
Esika mpo na Mokonzi?
Mbala mingi n'ekuke na yo
Nakobeta, kasi mpamba.
Mokolo ekomi na mpokwa,
Okofungolela ngai te?

Solo okoluka Ngai te,
Wana na molili ya seko?
Lipapu na Ngai ebomba yo,
Nazala nyonso mpo na yo.
Noki noki ntango' ekoleka,
Mpo nini okozela lobi?
Mokolo moko okobeta
Ekuke, kasi se mpamba.

Soki' osengeli na Ngai te,
Tosa, ata ososoli te.
Kino ntango nini nazela?
Nkolo asengeli na yo.
Tala natelemi n'ekuke,
Mobikisi, Nkolo na yo;
Ngai namemeli yo nde bozwi :
Fungolela Ngai motema.

Home





Next song