Nkombo Ekobiangama

Kelelo na Nkolo ekobeta
ntango esili,
Mokolo kitoko ya sêko'ekoya;
Wana basikwami basangani
ngambo n'ebale,
Nkombo ekobiangama, nakozala.

Nkombo ekobiangama kuna,
Nkombo ekobiangama kuna,
Nkombo ekobiangama,
Nkombo ekobiangama, nakozala.

Ntongo kitoko bakufi na Nkolo
bakosekwa,
Kati na nkembo ya lisekwa na Ye;
Mpe baponami basangani na ndako
ya lola,
Nkombo ekobiangama, nakozala.

Boye tosalela Nkolo na ntongo
kino mpokwa,
Toloba ntina na Bolingo na Ye;
Mpe ntango bomoi ekokende mpe
mosala'esili,
Nkombo ekobiangama, nakozala.

Home





Next song