BILOKO NYONSO

[Paroles de l'auteur :
Yoka kobiangama
Ya Nzambe!
Nyonso ezo leka!
Ezala mbongo!
Ezala basi kitoko
Y’otieli motema!
Nyonso ezo leka!
Kati na Yesu
Bomoyi ya seko!]

Biloko nyonso
Ekobongwana
Awa na mokili oyo!
Ata moko ezali te
Ekotikala seko!
Esengo! Esengo
Monene na Lola
Tango Yesu akomonana!
Pasi na biso nyonso
Ya mokili ekosila
Mokolo yango!
Na kokota na nkembo
Ya Nzambe!
Ngai na kokende libela!

Ngai na koki kolikia te
Misolo ya mokili oyo!
Na lingi kozua esika
Na bomengo ya Lola!
Esengo! Esengo
Monene na Lola
Tango Yesu akomonana!
Pasi na nga ya mokili
Ekosila mokolo yango!
Na kokota na nkembo
Ya Nzambe!
Ngai na kokende libela!

[Paroles de l'auteur :
Yo ozo tambola
Ozali ko kende wapi ?
Mobembo nyonso
Ezalaka na suka na yango !
Okosuka na enfer
To na Lola ?
Motuna monene!]

Tango mobembo ekosila
Awa na mokili oyo!
Yesu akoyamba biso
Kuna na mboka na Ye!
Esengo!
Esengo monene na Lola!
Tango Yesu akomonana!
Pasi na biso nyonso
Ya mokili
Ekosila mokolo yango!
Ngai na kokota
Na nkembo ya Nzambe!
Ngai na kokende libela!

Tango na kokoma na Lola
Na lingi komona Yesu!
Nzambe oyo ngai na ndimaki!
Ata komona Ye na miso te!
Esengo!
Esengo monene na Lola!
Tango Yesu akomonana!
Pasi na biso nyonso
Ya mokili
Ekosila mokolo yango!
Ngai na kokota
Na nkembo ya Nzambe!
Na kokende libela!

Ndeko yo ozali
Kolikia mini na mokili oyo!
Mbongo, biloko ekozika!
Yo okozala wapi?
Esengo!
Esengo monene na Lola!
Tango Yesu akomonana!
Pasi na biso nyonso ya mokili
Ekosila mokolo yango!
Na kokota na nkembo
Ya Nzambe!
Ngai na kokende libela!

Bongola motema na yo!
Ondima Nkolo Yesu!
Otika masumu na yo!
Tango esi ebelemi !
Disanka, disanka didi ku
Mu diulu !
Pamweneka mukalenga
Wanyi Yesu !
Makenga, makenga
Anyi onso
Ne ajika dituku adio!
Même ni mbwele
Butumbi bua Nzambi
Ne nye ciendelela!

[Paroles de l'auteur :
Na tango nyonso
Moto akendaka mobembo !
Soki akomi na mboka wana
Esengeli moto azala
Po ayamba ye!
Na suka ya bomoyi na yo
Soki okatisi ebale
Nani akoyamba yo ?
Na bomoyi na yo ya mabe!]

Esengo!
Esengo monene na Lola!
Tango Yesu akomonana!
Pasi na biso nyonso ya mokili
Ekosila mokolo yango!

Home