Yesu Nzambe Na Nguya
Yesu, Nzambe na Nguya
Ye Nkolo na Kimia;
Ye Tata na libela,
Mokonzi kitoko;
Ye asalaki manso,
Na mayele na Ye;
Litondi na bonzambe,
Ezali kati na Ye.
Nyonso na Ye (2x)
Litondi na bonzambe,
nyonso na Ye.
Nyonso na Ye (2x)
Yesu azali Nzambe na nguya
nyonso.
Ye Emanuele : Nzambe
Elongo na biso;
Ye Molimo azali
Mpe bisika nyonso.
Nganga Nzambe monene,
Ye Mpate na Nzambe;
Ye Nkolo na Lisiko,
Akumama seko !
Y'Ebandeli mpe Suka,
Alifa mpe Omega;
Nzambe kati na nzoto,
Moninga na biso;
Mposa na biso nyonso,
Bosembo mpe nguya,
Mayele mpe kobonga,
Tokozwa se na Ye.
Ekomonana Yesu,
Nzambe tozelaki,
Akozala esengo
Ya bana' a Israƫl;
Akoya kosikola,
Ye nde akufaki;
Litondi kati na Ye,
Alongi molili.
Home