Mokolo Ya Lisiko

Mabota makweyi,
Yisalele esekwi
Bilembo ya basakoli
Ntango na biso'esili,
Oyo nde nsomo
Seko na seko'ebelemi

Mokolo ya lisiko eyei
Bato batondi na nsomo
Tonda na Molimo
Petola mwinda
Tala! Lisiko'ebelemi.

Mosuke etoyi
Yelusaleme'etelemi
Mboka banyokoli mingi
Mbula na ye enoki
Azali kobianga
Bapalangani bozonga.

Likolo'eningani
Bato bayebi te
Ntina na bilembo'a Nzambe
Eklezya nde'ezali
Koningisa manso
Mokolo'a lisiko eyei.

Basakoli'a lokuta
Baboyi kondima
Ete Yesu azali Nzambe;
Bango baboyi emoniseli,
biso tolandi bantoma.

Home