Yo Monene

Nkolo Nzambe ngai nakamwe
mingi,
Manso okela na nguya na Yo;
Namoni minzoto, nayoki nkake,
Nguya na Yo kati na mokili.

Nayembeli Nzambe Mobikisi:
Yo monene, Yo monene!
Nayembeli Nzambe Mobikisi:
Yo monene, Yo monene!

Ntango nakoti na kati na zamba,
Koyoka bandeke bakoyemba;
Likolo na ngomba natali na nse,
Nayoki moluka mpe mopepe.

Ntango nakanisi' ete Mwana na Ye,
Atindami mpo akufela ngai;
Mokumba na ngai'amemi n'ekulusu,
Akufi mpo na masumu na ngai.

Ntango Klistu akoya na esengo,
Akozwa ngai nakosepela be;
Nakongumbama, nakomikitisa
Mpe konganga : Nzambe, Yo
monene.

Home





Next song