Tanga Bolamu Na Nzambe
Ntango mipepe eyeli yo
Molili etondi be,
N'esika ete yo olemba,
Ntanga bolamu na Ye.
Tanga bolamu na Ye,
Manso Nzambe asali,
Okomona sôlo mpenza,
Boni eliki monene
Wana na nzela ya moselu
Ekulusu bozito,
Kanisa Loboko na nguya
Ekopambola sêko.
Soki na nzela obungisi
Bozwi ya ntalo mingi,
Banzaka libula na Nzambe,
Okozwa na likolo.
Kumisa Tata ntango nyonso
Mpo ete a'akopesa
Bozwi na Ye epayi na yo,
Mpo na bolingo na Ye.
Home
Next song