Loba Nkolo

Nkolo ya elanga akobianga :
"Nani 'akosala mpo na ngai lelo"
Nani 'akomemela ngai babungi ?
Nani 'atalisa bango nzela ?

Loba Nkolo, loba Nkolo,
Loba mpe nakoyanola Yo;
Loba Nkolo, loba Nkolo,
Loba nayanola : "Tinda ngai!"

Wana likala ya móto esimbi,
Mosakoli epetoli ye be;
Mpe Nzambe alobi : "Nani
akende?"
Ayanoli : "Nkolo, tinda ngai!"

Mingi na masumu bakokufa,
Yokamela kolela na bango;
Kende mbangu kosalisa bango,
Mpe yanola : "Nkolo, tinda ngai!".

Mosala esili nde kosila,
Wana tokei kuna na ndako;
Nkolo ya elanga akoloba : "Mwana
osali malamu be!"

Home