Na Ntango Moke Ntongo Etani (dans Peu De Temps )

Mbala mingi tomemami na mbonge
ya ebale,
Ntango moko pole mpe ntango
mosusu molili;
Kuna mboka kitoko, wana
londende elimwe,
Na ntango moke nde tokososola.

Na mwa ntango, ntongo etani,
Wana babulami bakosangana;
Mpe tokoloba ndenge tolongaki,
Na ntango moke nde tokososola.

Mbala mingi tozangi na mokili oyo
ya nse;
Tozali na nzala, na bokono, tozangi
ndako;
Nde tokolikya na Nkolo bo elobi
Liloba,
Na ntango moke nde tokososola.

Mimekano mileki, mpe tozangi
kososola
Ndenge Nzambe alingi kokamba
biso na mboka;
Azali kosenzela, tobila Ye kino liwa,
Na ntango moke nde tokososola.

Mbala mingi masenginya mayeli
biso mpwasa;
Mitema mizokisami na matioli ya
bato;
Mpo nini tomekami wana tosali
bolamu,
Na ntango moke nde tokososola.

Home