ELIKYA NA NGAI

Oh ! elikya na ngai,
Na tye na Lola !
Na oyo nyonso na ngai
Na pesi na Yesu!
Po na yebi a kozonga
Ko kamata ngai!
Po na yebi ete akozonga
Ko kamata ngai!
A komema ngai solo
Na Nkembo na Ye ya seko!
A komema ngai solo
Na Mboka na Ye na Lola!
(A komema ngai solo
Na Mboka na Ye na Lola!
A komema ngai seko
Na nkembo na Ye ya seko!)

(O kobuka oy’olonaki!
Yesu a kotuna yo!) (bis)
Pesa nyonso na Yesu
Ye Bomoyi na yo ya Seko!
Pesa nyonso na Yesu eh!
Ye Bomoyi na yo ya Seko!

Nkolo na ngai Yesu
Na leli epayi na Yo!
Na memeli Yo lelo
Mikumba na ngai nyonso!
Po na yebi ete
Ozali na Bomoyi
Nkolo salisa ngai!
Po na yebi ete
Ozali na Bomoyi
Yaweh salisa ngai!
(Nkolo sunga ngai oh!
Na mipesi na Yo!) (bis)

(Mpasi ya mokili oh!
Etungisi ngai!) (bis)
Masumu ya mokili oh!
Etungisi ngai!
Nkolo sungai oh!
Na mipesi na Yo!
Oh! Nkolo sungai oh!
Na mipesi na Yo!

Oh! Nkolo na leli oh!
Yawhe bikisa ngai!
Oh! Nkolo na leli oh!
Yawhe bikisa ngai!
Nkolo sungai oh!
Na mipesi na Yo!
Oh! Nkolo sungai oh!
Na mipesi na Yo!

Na lingi te ko mipesa
Na mokili oyo!
Na makambo ya mpamba
Ya bosoto mingi!
Po na zali mopaya awa
Mboka na ngai Lola!
Po na zali mopaya awa
Mboka na ngai Lola!
Mokili oyo ekozika
Elongo na Satana!
Mokili oyo ekozika
Elongo na Satana!
Oyo nyonso ekozika
Elongo na Satana!
Na kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!
Na kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!
Na kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!

Na kokota na Nkembo
Ya Yesu Mobikisi!
Na kokota na Nkembo
Ya Yesu Mobikisi!

Tango kanda na Nzambe
Ekoya na mokili!
Na mpasi oyo nyonso
Okozala wapi?
(Ndima Yesu
Ndeko na ngai
Lelo abiangi yo!) (bis)
Mokili oyo ekozika
Elongo na Satana!
Mokili oyo ekozika
Elongo na Satana!
Oyo nyonso ekozika
Elongo na Satana!
To kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!
To kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!
To kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!

Tango kanda na Nzambe
Ekoya na mokili!
Na mpasi oyo nyonso
Okozala wapi?
(Ndima Yesu
Ndeko na ngai
Lelo abiangi yo!) (bis)
Mokili oyo ekozika
Elongo na Satana!
Oyo nyonso ekozika
Elongo na Satana!
Oyo nyonso ekozika
Elongo na Satana!
To kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!
To kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!
To kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!
To kokota na Nkembo
Na Yesu Mobikisi!

Home