Masuwa Ya Lobiko
Totepi na ntango solo,
Tokoumela te;
Mpe mapata molili
Makobongwa pole.
Bongo toyika mpiko
Mpo tobatelami;
Masuwa'a lobiko eyei,
Kozwa baponami.
Ndeko yika mpiko,
Mpasi na biso'ekosila,
Kuna lola tokokutana
Na balingami.
Tozali bapaya,
Tokoluka mboka moko,
Masuwa'a lobiko eyei
Kozwa baponami.
Moyini alobi ete
Ezali ntina te:
Kozala Moklisto,
Kobika na Nkombo'a Yesu;
Nkolo alobi na biso,
"Nakosunga bino,
Bondimela ngai,
Nakomema bino na mboka."
Na bondimi ngai namoni
Masuwa'a lobiko,
Kotiola n'ebale
Mpo na kobikisa biso,
Na libongo tosema
Mpe na balingami.
Mokumbi abiangi : "Tala,
Masuwa'ebelemi!"
Kota na masuwa awa
Ezali koleka;
Soki olekisi ntango,
Okufi libela;
Bafuti mpo na yo,
Mokumbi akobianga yo,
Kota na masuwa
Ekomema yo na mboka.
Home