Mosala Na Yo Kitoko

Mosala na Yo Kitoko,
Yesu Mokonzi;
Napesi motema na ngai,
Epai na Yo.

Yesu zwa bomoi na Ngai,
Ezali wa Yo;
Na ngolu na Yo monene,
Obatela ngai.

Mposa ya motema na ngai,
kozala bule;
Eloko ngai nalingi,
Mokano na Yo.

Lokola mwanje nalingi,
Kosalela Yo;
Nakotala se Mokambi,
Kotosaka Ye.

Mosala to mpasi mingi,
Nakobanga te;
Yesu Yo Elikya na ngai,
Bozwi mpo na ngai.

Elongo kino na Nkembo,
Tokei liboso;
Toyemba njembo y'elonga,
Nde tokolonga.

Home