Tokutana Na Ebale

Tokutana na ebale,
Kuna baanje batamboli;
Mayi kitoko kobima,
Uta kiti na Nzambe.

Tokutana na ebale,
Ebale kitoko mingi;
Na basantu banso n'ebale,
Kobima na kiti 'a Nzambe.

Tozwi kati na ebale,
Mokonzi mpe Mobikisi;
Epai mpasi ekosila,
Kuna nkembo na Nzambe.

Pembeni ya ebale,
Biso tokosukolaka;
Tokosanjola libela,
Na mokolo kitoko.

Mpe soki tokomi kuna,
Totika mikumba nyonso;
Ngolu ekopesa biso
Elamba mpe motole.

Babulami na ebale,
Bakomonisa Nzambe;
Bakokufa lisusu te,
Bakoyembela ngolu.

Na mwa ntango nde tokomi,
Wana mobembo esili;
Mitema mikosepela,
Na loyembo ya kimia.

Home





Next song