O! Nalingi Yesu
Nkombo moko nalingi be,
Nakoyemba yango;
Eyokami na loyembo,
Nkombo kitoko be.
ô nalingi Yesu,
ô nalingi Yesu,
ô nalingi Yesu,
Mpo Ye alingaki ngai.
Nkombo ya Ye Mobikisi,
Akufelaki ngai;
Makila ekolobela,
Basumuki banso.
Nkombo ya Oyo alingi
Kozwa mpasi na ngai;
Mokumba Ye akomema,
Moko te akoki.
Home