Kuna N'ekulusu
Mobikisi akufaki,
asopi makila?
Amikabaki se mpo na
ngai moto ya mpamba.
Kuna n'ekulusu,
Ngai namoni pole,
Mokumba ya motema elongwe,
Mpe na bondimi
Nakoki komona,
Sikawa natondi na esengo.
Nde mpo na mabe nasali,
Ye anyokwamaki?
Mawa mpe ngolu, suka te,
Bolingo monene.
Moyi engengaki mpe te,
Molili eyaki,
Ntango Klisto akufaki
Mpo na basumuki.
Mawa na ngai ekoki te
Kofuta nyongo oyo,
Nkolo namipesi na Yo,
Yango nde nakoki.
Home